Isidore Ndaywel è Nziem (7 sánzá ya míbalé 1944) azalí molobeli mpé mosapoli wa Kongó-Kinsásá.
Isidore Ndaywel è Nziem abótama na Ipamu o kati ya etúká ya Bándundú na mokɔlɔ mwa 7 febwáli 1944. Akomá babúku ebelé na maye matálí masapo ya mbóka ya Kongó-Kinsásá
Na mikɔlɔ óyo etangémí, azalí mokónzi ya Société des historiens congolais.
Atangísá na Bobɔngɔ́ bwa Lubumbashi, na Bobɔngɔ́ Marien Ngouabi, mpé na óyo ya Bobɔngɔ́ bwa Laval na Kanadá.
Isidore Ndaywel è Nziem atangá na Bobɔngɔ́ bwa Sorbonne (Pari) na Falansia, bisíká akómá dokotolo wa makambo etálí masapo.
O mobú mwa 1976, azaláká SOHIZA (Société des Historiens Zairois) na basapoli basúsu ba Kongó-Kinsásá neti Zacharie Tshimanga wa Tshibangu.